BANA ELONGA : BANA MAMA KONGO BALUKA LISALISI NA BA OYO YA BANGO, NA LIBANDA YA MBOKA TE! 

  • Freddy Mulongo, Fondateur et Rédacteur en Chef de Réveil FM International

BANA ELONGA : BANA MAMA KONGO BALUKA LISALISI NA BA OYO YA BANGO, NA LIBANDA YA MBOKA TE! 

MOLAKISI YA BALAKISI, MPAKA Mwana Matiki KIMBANGU DIANTUNGUNUA, WA YAMBO YA BANA ELONGA. 

BANA MAMA KONGO,

FUNGOLA YA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

ELONGA YA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

EYANO YA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

YE AZALI MWINDA YA BISO BAYINDO !

EKOMA SOKI ASIMBI MINDUKI CONTRE MAMA KONGO LIBANDA BA GANGI BOPESA POSTE. MOBOMI AKOMA KO KONZA. 

EKOMA SOKI ABUKI TRÉSOR PUBLIC, ASOMBI BA IMMOBILIERS NA MBOKA BAPAYA, LIBANDA BA GANGI YE NDE POLITICIEN YA SOLO.

MASOLO PO NA MAMA KONGO EKOMA KOSALAMA LIBANDA NA MIKILI BAPAYA. 

BABOMI YA MAMA KONGO,
BALOKI YA MAMA KONGO
BANGO NDE BAKOTOMBWAMA.

KONGO EZALI CHAMBRE YA COUCHER YA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

KONGO EZALI MBOKA ESANTU
KONGO EZALI MBOKA LOKUMU 

TATA MPUNGU TULENDO NZAMBE YA BA NKOKO NA BISO APESA NIONSO NA MABELE YA KONGO.

KONGO EZALI KITALATALA ! 

KASI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA TOPESA YE MOKONGO.
TOYEBI YE TE
TOTUNAKA YE TE
TOBOYA YE.

TOLINGI YE AYA KOSALISA BISO NDENGE NINI ?

MUTU YA LIBUMU PASI AZALI KOLELA MAKOLO PASI.

LOKUTA EKOMA BOSOLO.
BATU YA NIAMU NIAMU BAKOMA KOKUMISAMA.

BOSOLO EYE KOLONGA LOKUTA.

BANA NA BISO
BA MIYEBA !

BANA NA BISO
BA MINDIMA !

BANA NA BISO
BA TOSA BA OYO YA BANGO.

BANA NA BISO
BA YOKISA BA NKOKO NA BANGO SONI TE.

BANA NA BISO BAKENDE ATA MBALA MOKO TE KOTALA MAYE EZALI KOLEKA EPAYI YA BA PAYA PE BALUKA LISALISI TE EPAYI YA BA PAYA. 

BANA NA BISO BAKO YEBA KE BA KOMBO  PE MAKILA NA BANGO EZALI MAKASI.

BA KOLUKA BAZUA BA KOMBO MOSUSU TE ATA BA TINDI BANGO.

BATU BAKO TOSA BANGO SOKI BA MITOSI MPE BA MINDIMI LOLENGE BANGO BAZALI.

TOZALI KOTIKELA BANA MALOBA OYO YA ESENGO !

NA MALOBA OYO YA ESENGO, BOTOSI MPE BOMENGO.

BANA NA BISO BA KOTIKELA NA ESENGO NA BANGO.

BANA NA BISO LOKOLA BANA KONGO NIONSO BAZALI BOMENGO PO NA BISO.

BANA MAMA KONGO,

BANA YA BANA NA BISO TOPE BA NKOKO NA BISO BAKOYA KOKUTA MALOBA TO TIKELAKI BANGO MPE NZELA OYO BABOTI NA BANGO BASALI WANA BANGO BAKOYA KOZALA NA KIMIA NIONSO NA MABELE NA BANGO KONGO.

BANA BA KOMESANA NA BA OYO YA BANGO MPE NIONSO BAKO SALA, BAKO SALA YANGO ELONGO NA BA OYO YA BANGO MOKO.

A SUIVRE !

MPAKA MATIKI KIMBANGU DIANTUNGUNUA, LONDRES, UK

MULONGO MUKENA KAFUTI
MOLOBELI YA BANA ELONGA

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Thème Magazine -  Hébergé par Overblog