BANA ELONGA : KONGO EZALI MBOKA ESANTU, MBOKA LOKUMU !

  • Freddy Mulongo, Fondateur et Rédacteur en Chef de Réveil FM International

BANA ELONGA : KONGO EZALI MABELE ESANTU, KONGO EZALI MBOKA LOKUMU !

MOLAKISI YA BALAKISI, MPAKA Mwana Matiki , KIMBANGU DIANTUNGUNUA, WA YAMBO YA BANA ELONGA, ALOBI BOYE :

BA MBOKA MINGI NA MOKILI BA CONQUISTADORS BA PANZI YANGO NA LOKUTA PE NA MBONGO MUKE : SOUDAN, YOUGOSLAVIE...KASI MAMA KONGO KOBANDA 1960 KINO LELO BA CONQUISTADORS BAKOMI NA 15 MILLIARDS $ PO BA PANZA YANGO.

KASI TOLOBI BOYE "MABELE ATA MOKO TE YA MAMA KONGO EKOPANZANA" !

TOLOBAKA MAYI EKOMATA. MUTU NIONSO AKOMI KOMONA MAYI NA MAYI NA MAKOLO, BA GENOUX, TOLO BA MISUSU PEMBENI YA MINOKO NA BANGO. 

BITUMBA OYO TOZALI KO YOKA PE KOMONA EKOMI BITUMBA YA BA VALEURS ! 

BA DIASPORA NDE BAKO LIBÉRER MAMA KONGO

KASI BA DIASPORA BA YEBA KE

KONGO EZALI MABELE ESANTU!
KONGO EZALI MBOKA LOKUMU !

BA DIASPORA BAZALA NA BOTOSI, BOTOSI, BOTOSI NA NIONSO ! 

BOTOSI NA NZAMBE YA BA NKOKO NA BANGO : TATA MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA PAMBA, VIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, MUNGU BABA MU OMBAJI...

BOTOSI NA MWINDA YA BAYINDO INSO : MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.
BA DIASPORA BA NDIMA YE.
PO YE NDE AZALI DRAPEAU
PO YE NDE AZALI ELONGA
PO YE NDE AZALI FUNGOLA
PO KONGO EZALI CHAMBRE À COUCHER NA YE.

BOTOSI NA BA NKOKO NA BISO
PO BANGO BAZALI MISALISI.

BOTOSI NA KOMBO PE MAKILA YA BA NKOKO NA BISO.

MUTU MOKO TE ALINGAKA AYOKISA BA NKOKO NA YE SONI

BA NKOKO NA BISO YA YAMBO YA BAYINDO EZALI : NKOKO NZALAMPANDA NA NKOKO KITELE KINABO.

BOLINGO EWUTAKA KATI NA MOTEMA PO EBIMA LIBANDA.

KASI MABE, LIKUNIA, ZUWA, KOLOKA, KOBOMA...EWUTAKA LIBANDA PO EKOTA NA MOTEMA.

SOKI BOLINGO EZALI NDEKO NA YO AZALI NDEKO NA YO PO BOZALI MAKILA MOKO PE BA NKOKO NA BINO YA YAMBO BAZALI MOKO.

KO YINANA, LIKUNIA, ZUWA EKOZALA TE PO BOZALI MAKILA PE MUTU MOKO.

NDEKO NA YO OKO PAPAYE MACHETTE TE.

BANA NA BISO NA MATERNITÉ OKO KANGA BANGO BA OTAGES PRISONNIERS TE.

NDEKO NA YO KONGO OKO KANGA YE NETI MOYIBI. EBONGO BA NKOKO NA YE ?

LOFUNDU EKOZALA TE  PO NIONSO EZALI NA MABOKO YA BA NKOKO NA BISO MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA AZALI LIBOSO NA NIONSO. MWINDA NA YE EZALI KO NGENGA MAKASI KOTALISA PE KOBIMISA NA PWASA  OYO NIONSO YA MABE EBOMBAMAKI.

BA NKOKO PE BAZALI KOLANDA YE.

BISO PE BA OYO BA MIYEBI PE BA MINDIMA BA BIMA NZAMBA BAZALI KOLANDA.

BA VALEURS EBELE MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA ALAKISI BISO :

1. TATA MPUNGU TULENDO YE NDE NZAMBE YA BA NKOKO NA BISO.

2. NKOKO NZALAMPANDA NA NKOKO KITELE KINABO BANGO MIBALE, MOBALI NA MUASI , NDE BA NKOKO NA BISO YA YAMBO.

3. MAMA KONGO EZALI CHAMBRE À COUCHER NA YE. BA KOTAKA KONGO NA LIBOSO YA NDAKU. BASENGAKA NZELA. BAKOTAKA NA FENÊTRE TE, BA SOTAKA MUR TE. 

BAKOTAKA NA CHAMBRE YA MFUMU TE. OR MINGIZILA BA KOTI NA NDAKU BA PANZI BILOKO NA SALON, BAKOTI NA CHAMBRE YA TATA BA DENDI NA LIKOLO YA MBETO YA CHAMBRE NA YE. TATA APEKISI BANA NA YE BABIMISA MAKOFI. YE MOKO NA BO MPAKA NA YE ALOBI AKOBIMISA BANGO.

4. MUANA MOKO TE ESIKA YE AZALI ABIMA LIBANDA SANS BA NKOKO NA YE. 

5. BA CONQUISTADORS BA KENDA KASI BA TIKA MINDELE NDOMBE KATI NA MBOKA KONGO. BANA BITINDA BA KANGA BOMENGO NIONSO YA MABELE YA MAMA KONGO PONA BANGO PE BA DÉCIDEURS NA BANGO YA BAPAYA. BANA MAMA KONGO BAKOMA BAWUMBU NA MABELE YA BANGO.

DÉCIDEUR WA YAMBO NA MABELE YA MAMA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

6. BANA MAMA KONGO BAPESA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA MUKONGO KASI BAZALI KOLELA PASI. KOKENDEKA BA ÉGLISES ET ÈGLISETTES "BUSINESS" KO MWAMISA BA ARCHIBISCHOPS, ÉVÊQUES, PASTEURS... TONGO, MIDI, POKWA, KASI PASI NA PASI, KOLELA ESILAKA TE.

TATA MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA PAMBA, VIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, MUNGU BABA MU OMBAJI AZALI NA POSA YA MBONGO "MAKASA" TE.

MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA ASENGAKA BA OFFRANDES NI BA DÎMES TE. BOBUNGI EZALI MINGI.

7. MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA AKUFA KALA...KASI YE AMIMONISAKA KINO LELO NA BANA NA YE.

YE NDE APESAKA BWANIA.

YE NDE AZALI FUNGOLA YA MAMA KONGO.

YE NDE AZALI ELONGA YA MAMA KONGO.

MPAKA MATIKI KIMBANGU DIANTUNGUNUA ALOBI MINGI.

8. KONGO ELEKI MUNENE TOKABOLA YANGO TOKABOLA MBONGO.  TATA MPUNGU TULENDO APONELI BISO MABELE, ATINDELI BISO NLONGI YA BA NLONGI, MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE NDE MWINDA YA BISO BAYINDO. YO NANI OSIMBA PE OTEKA MABELE NA YE ? MAKASA TO MBONGO EZALI VALEUR IMPOSÉE YA BA CONQUISTADORS. BA NKOKO NA BISO BA VIVAKA NA BA TROCS. MBONGO ELEKI VALEUR YA MABELE TE.

9. BANA MAMA KONGO

BA MIYEBA ! BA MINDIMA ! BABIMA NZAMBA !

MPAKA MATIKI KIMBANGU DIANTUNGUNUA, Londres, UK.

Mulongo Mukena Kafuti

MOLOBELI YA BANA ELONGA

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Thème Magazine -  Hébergé par Overblog