BANA ELONGA : BENDELE EKWEYA TE ! MALOBA YA ESENGO, BOTOSI MPE BOMENGO NA BANA MAMA KONGO !
-
BANA ELONGA : BENDELE EKWEYA TE ! MALOBA YA ESENGO, BOTOSI MPE BOMENGO NA BANA MAMA KONGO !
/image%2F2451243%2F20230721%2Fob_9e5a65_fb-img-1689910553852.jpg)
MOLAKISI YA BALAKISI, MPAKA Mwana Matiki KIMBANGU DIANTUNGUNUA, WA YAMBO YA BANA ELONGA.
BANA MAMA KONGO,
TATA MPUNGU TULENGO, JANKOMBA EA PAMBA, VIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, MUNGU BABA... NZAMBE YA BA NKOKO NA BISO ALINGI BA JÉRÉMIADES TE, KOMILELA LELA TE, BA PLAINTIFS TE,
KASI BANA OYO BA MIYEBI, BA MINDIMA PE BA TELEMA.
BANGUNA NA BISO BAZALI KOBAKISA POTO POTO LIKOLO YA POTO POTO, PASI LIKOLO YA PASI, KOBOMA LIKOLO YA KOBOMA, MINIOKOLO LIKOLO YA MINIOKO... KASI SOKI BANA MAMA KONGO BALOBI TOZALI NA PASI TE, MINIOKO EZALI TE, KUFA EZALI TE...
TO CHANGER BA PARADIGMES,
TO CHANGER BA RHÉTORIQUES,
TO CHANGER BA LOGICIELS !
BANA MAMA KONGO BAKOMA KOLELA MOKILI MOBIMBA !
BABETI BESO !
BABOMI BISO !
BAYIBI MBOKA NA BISO !
KASI MUTU MOKO TE AZALI KOTELEMA
KASI MBOKA MOKO TE AZALI KOTELEMA
KASI BA ORGANISMES EZALI KOLOBA TE.
KONGO EZALI MBOKA ESANTU !
KONGO EZALI CHAMBRE À COUCHER YA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.
ELONGA YA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA !
FUNGOLA YA KONGO EZALI MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA !
BANA MAMA KONGO,
BALOBELA YE MIKAKATANO EZALI NA KONGO.
BATALISA YE MINIOKO EZALI NA MBOKA KONGO.
MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA APESA EYANO, AFUNGOLO BWANIA YA BANA NA YE... TOSALA OYO YE ALOBI !
TOZUI ELONGA PE KIMPWANZA YA MAMA KONGO.
KONGO AKOMA KOBETAMA PAMBA PAMBA NA BANA MIKE.
KONGO APESA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA MUKONGO.
KONGO AKOMA MILELO NA MILELO, BISENGA SENGA NA BAPAYA.
TATA MPUNGU TULENGO APESA MAMA KONGO NIONSO.
MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE NDE MWINDA YA BISO BAYINDO.
KONGO EZALI NDAKU NA YE.
NKOKO NA BISO ABOYI BANA NA YE BAKWEYA NA MITAMBU.
NKOKO NA BISO ABOYI BANA NA YE BABUNDA.
NKOKO NA NZETE NA YE YA MOBANGE ALOBI YE MOKO AKOBUNDELA MAMA KONGO.
BANA BAZALA YA KO MIYEBA KO MINDIMA PE YA KOTELEMA.
MALOBA OYO BAZALI KOYOKA NA BA OYO YA BANGO EZALA MALOBA YA ESENGO, BOMENGO, BOSEMBO PE YA BOTOSI
BANA BAZALA YA KO TELEMA.
LISALISI EZALI NA BAPAYA TE.
LISALISI YA MAMA KONGO EZALI NA BA OYO YA BISO MOKO.
BENDELE YA KONGO EKOPEPA MALGRÉ BA MBONGE, MIPEPE YA MAKASI, PO LIZITA YA BENDELE MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA EKANGAMI MAKASI MINGI PE NA LUZITU NIONSO.
BENDELE EKO KUEYA TE !
/image%2F2451243%2F20230721%2Fob_d8699d_fb-img-1689910559463.jpg)
MPAKA MATIKI KIMBANGU DIANTUNGUNUA, LONDRES, UK.
Mulongo Mukena Kafuti
MOLOBELI YA BANA ELONGA
