BANA ELONGA : KO MIYEBA KO MINDIMA PONA KOBUNDA NA MAYI !
-
/image%2F2451243%2F20230926%2Fob_209a7a_fb-img-1695701099519.jpg)
BANA ELONGA : KO MIYEBA KO MINDIMA PONA KOBUNDA NA MAYI !
MOLAKISI YA BALAKISI, MPAKA Mwana Matiki KIMBANGU DIANTUNGUNUA, WA YAMBO YA BANA ELONGA.
BANA MAMA KONGO,
ESENGELI BANA NA BISO BAYEBA :
TATA MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA PAMBA, VIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, MUNGU BABA... YE NDE NZAMBE YA BA NKOKO NA BISO.
MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE NDE MWINDA YA KONGO.
MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE AZALI FUNGOLA YA KONGO PE ELONGA YA MABELE KONGO PO MBOKA KONGO EZALI CHAMBRE À COUCHER NA YE.
BA NKOKO NA BISO BANGO NDE MISALISI. TOZONGELA BANGO.
TOPESA BANGO MIKONGO TE.
TOKO TIKELA BANA NA BISO MALOBA OYO EKOPESA BANGO MAKASI.
MALOBA YA BWANIA.
TOKOTIKELA BANA NA BISO MITUKA TE PO EKOKUFA !
TOKOTIKELA BANA NA BISO MISOLO TO MAKASA TE PO BA BANQUE EKOKANGAMA, BA INFLATIONS EKOSALEMA MBONGO EKOSILA VALEUR !
TOKOTIKELA BANA NA BISO BA NDAKU TE PO BAKOTEKA YANGO SOKI BA CRISES ELEKI.
TOKOTIKELA BANA NA BISO MALOBA YA BWANIA :
BAYEBA TATA MPUNGU TULENDO NZAMBE YA BA NKOKO NA BISO.
BAYEBA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE NDE MWINDA YA BAYINDO.
BAYEBA BA NKOKO NA BISO BANGO NDE BASALISI YA NIONSO.
LISALISI NIONSO OYO BALINGI KOZUA BAKOZUA YANGO KAKA NA BA OYO YA BANGO.
BAKENDE LIBANDA TE KOLUKA LISALISI !
BANA MAMA KONGO,
BANA NA BISO BA MIYEBA PE BA MINDIMA PO NA BA BUNDA NA MAYI PE BALONGOLA POTO POTO NA MABELE YA KONGO.
BA KOZALA BANGO MOKO TE !
BA KOZALA NA BA NKOKO NA BANGO.
BA KO YEBA BA SEKELE YA MINGI PEMBENI NA BA NKOKO NA BANGO.
BANA BAYEBA KOBOMBA PE KOTOSA MALOBA YA BWANIA OYO BAKOZUA NA BA OYO YA BANGO.
BANA NA BISO, BANA YA BANA NA BANGO, BA NKONKO YA NKOKO NA BISO BA KOBOMBA PE BA KOSALELA MALOBA YA BWANIA.
MA MBOMAMI OYO BISO TOKOZUA PEMBENI YA BA OYO YA BISO TOKOSALELA YANGO TOKOTOSA YANGO PE TOKOBOMBELA BA OYO BAZALI BISO BAZALI KOYA SIMA NA BISO.
BANA MAMA KONGO,
TOSALA MAKASI !
NA SIMA NA BISO TOZALI NA SINGA MOLAYI
BAZALI NA POSA YA MINGONGO NA BISO PE KOYEBA LOLENGE NINI KOLONGA MAYI OYO EZALI KOMATELA BANGO.
MAYI ESILI KOMATA TE MAYI EZALI KOMATA SE KOMATA.
SOKI LELO OYO MINGI BAKO SOSOLA TE TINA YA LISUNGI OYO ?
BAKANISA MALAMU PO BAZALI NA MOLONGO MOBIMBA SIMA NA BANGO.
ATA BANGO MOKO BAKO SALELA YANGO TE BATIKELA BA OYO BAKOYA NA SIMA NA BANGO MALOBA OYO.
BISO TOKO BIKA NA MALOBA YA BWANIA. BANA NA BISO BANA NA BANGO BA NKOKO YA BA NKOKO NA BISO BAKOBIKA PE BAKOBISAMA KAKA NA MALOBA YA BWANIA.
/image%2F2451243%2F20230926%2Fob_d91440_fb-img-1692441015247.jpg)
MPAKA MATIKI KIMBANGU DIANTUNGUNUA, LONDRES, UK.
#MulongoMukenaKafuti
MOLOBELI YA BANA ELONGA
